Nzambe asali obligatoire na musulman asala mabondeli mitano na mokolo : tongo, midi, sima ya midi, kolala ya moi, na pokwa. Motango ya ba raka’ah mpo na losambo ya tongo: raka’ah mibake, losambo ya midi: raka’ah minei, losambo ya nsima ya midi: raka’ah minei, losambo ya kolala ya moi: raka’a misato, mpe losambo ya mpokwa: raka minei
Namibongisa mpo na losambo
Soki tango ya losambo ebandi, musulman amipetola na bosoto ya moke mpe na bosoto ya monene, soki azui bosoto ya monene.
Bosoto munene ezali: oyo eza obliger musulman asokola.
Bosoto ya moke ezali: oyo esengaka musulman asala ablution.
Musulman abondelaka na bilamba ya peto na esika oyo ezali peto na bosoto te,pe azipaka nzoto naye.
Musulman asengeli komibongisa na bilamba oyo ebongi na tango ya losambo mpe azipa nzoto na ye na yango.
Mwasi asengeli kozipa nzoto mobimba na tango ya losambo longola se elongi mpe maboko.
Na tango ya losambo, musulman alobaka eloko mosusu te, Kaka maloba ya losambo, Pe ayokaka immamu, Na Atala tala te, na tango ya losambo na ye Soki azali na makoki te ya koyeba maloba ya losambo, akumisa kaka Nzambe, tii ndenge losambo ekosila, mpe asengeli kozwa likambo ya liboso mpo na koyekola losambo mpe maloba na yango.
Nayekola kobondela (Swalat)
Etape 1: Mokano (Nia) ezali mpo na devoir oyo nalingi kosala, mpe esika na yango ezali na motema.
Nsima ya kosala wudu, natala Qiblah mpe nasambelaka na kotelema soki nazali na makoki ya kosala yango.
Etape 2: Natomboli maboko na ngai na bonene ya mapeka mpe nalobi: (Allahu Akbar) na mokano ya kokota na losambo.
Etape 3: Tanga libondeli ya kofongola losambo, ndenge elobami, bakisa mpe koloba:(Subbhânaka l-lâhumma wa bi-hamdika, wa tabâraka smuka wa ta’âla jadduka, wa lâ ilâha ghayruka).
Etape 4: Naluki ekimelo epai ya Nzambe Pona Satana alakelami mabe, yango wana nalobi:(A’ûdhu bi-l-lâhi mina sh-shaytwâni r-rajîm).
Etape 5 :
Tanga Surah Al-Fatihah na rak’ah nionso, oyo ezali :﴿
{Bismi llaahi rrahmaani rrahiim [1] Alhamdu lillahi rabbil AAalamiina [2]Arrahmâani rrahiim [3] Maaliki yawmi ddiin [4] Iyyaaka naAAbudu wa iyyaaka nasta-ï'iin [5] Ihdina sswiraatwa lmustaqiim [6] ﴾. Swiratwa lladhiina an-a'mta A'layhim ghayri lmagh-dhubi A'layhim wala ddhwaaalliin}[7].
Sima ya Al-Fatihah, tanga surat nakati ya Coran ndenge okoki, na rak’ah ya liboso mpe ya mibale ya losambo moko na moko Yango ezali obligatoire te, kasi kosala yango ezali lifuti monene.
Etape 6 : Nalobi : (Allahu Akbar), sima nafukama tiii mokongo na ngai ekozala plat mpe maboko na ngai ekozala na mabolongo na ngai na misapi epalangani, sima nalobi tango nazali kofukama: ( Subhâna rabbiya-l-’azîm). (3)
Etape 7 : Natelemi na rukuh nakoloba: (Sami’a l-lâhu liman hamidah.) natomboli maboko na ngai na nivo ya mapeka na ngai, pe tango nzoto na ngai ezali semba pe etelemi, nalobi : (Rabbanâ wa laka-l-hamdu).
Etape 8: Nalobi: (Allahu Akbar) mpe nafukami na maboko, na mabolongo, na makolo, na elongi, mpe na zolo, mpe nalobi na kofukama na ngai: (Subhâna rabbiya-l-a’lâ. (3)
Etape 9 : Nalobi : (Allahu Akbar) mpe natelemi na kofukama tiii nakozala na mokongo ya semba, nakofanda na lokolo ya mwasi mpe natelemisi lokolo ya mobali, mpe nalobi: (Rabbi ghfir lî !).
Etape 10: Nalobi: (Allahu Akbar) mpe nafukami lisusu lokola kofukama ya liboso.
Etape 11: Natelemi na sujud, nalobi: (Allahu Akbar) kino nakotelema semba, mpe nasala ndenge moko na ba rak’ah oyo etikali ya losambo ndenge nasalaki na rak’ah ya liboso.
Nsima ya raka’ah ya mibale ya losambo ya midi, ya nsima ya midi, ya kolala ya moi mpe ya mpokwa, nafandi mpo na kotanga tashahhud (Tahiyatu)ya liboso, oyo ezali:At-tahiyyâtu li-l-lâhi, wa s-salawâtu wa t-tayyibâtu. As-salâmu ’alayka ayyuhâ n-nabiyyu wa rahmatu l-lâhi wa barakâtuhu. As-salâmu ’alaynâ wa ’alâ ’ibâdi l-lâhi s-sâlihîna. Ash-hadu an lâ ilâha illâ l-lâhu, wa ash-hadu anna Muhammadan ’abduhu wa rasûluhu.Sima na telemi pona raka'ah ya misatu sima na yango.
Sima ya rak’ah ya suka ya losambo moko na moko, vanda po otanga tashahhud (Tahiyatu) ya suka, oyo ezali :At-tahiyyâtu li-l-lâhi, wa s-salawâtu wa t-tayyibâtu. As-salâmu ’alayka ayyuhâ n-nabiyyu wa rahmatu l-lâhi wa barakâtuhu. As-salâmu ’alaynâ wa ’alâ ’ibâdi l-lâhi s-sâlihîna. Ash-hadu an lâ ilâha illâ l-lâhu, wa ash-hadu anna Muhammadan ’abduhu wa rasûluhu.Allâhumma salli ’alâ Muhammadin wa ’alâ âli Muhammadin kamâ sallayta ’alâ Ibrâhîma wa ’alâ âli Ibrâhîma.innaka hamîdun, majîd Allâhumma bârik ’alâ Muhammadin wa ’alâ âli Muhammadin kamâ bârakta ’alâ Ibrâhîma wa ’alâ âli Ibrâhîma. innaka hamîdun, majîd.
Etape 12 : Sima na yango, nalobi salaam na droite na ngai nalobi : (As-Salām ālaikum warahmatullah) pe nalobi salaam na gauche na ngai nalobi : (As-Salām ālaikum warahmatullah ), na intention ya kobima na losambo, mpe boye nde na silisi losambo.