Soki mobali to mwasi azali kosangisa nzoto, to mpe mai ya mobali ebimi na bango na mposa ntango azali kolamuka to kolala; Ezali obligatoire mpo na bango kosukola mpo na kozala na makoki ya kosala losambo to eloko nyonso oyo esengeli mpo na kopetolama Ndenge moko mpe soki mwasi apetolami na sanza mpe nsima ya kobota, asengeli naye kosokola Na wudu ya molulu liboso ete asala losambo to nyonso oyo esengeli mpo na kopetolama.
Façon ya kosukola ezali boye:
Musulman asengeli kozipa nzoto na ye mobimba na mayi na ndenge nionso, ata mpe kosukola monoko mpe zolo Soki azipi nzoto na ye na mayi, bosoto monene ekolongwa ye, mpe bopeto na ye ekozala mobimba.
Epekisami mpo na moto oyo azali na ezalela ya bosoto ya milulu kosala makambo oyo elandi kino akosukola :
01 Libondeli (Swalat).
02 Tawaf ya Kaaba kobaLuka yango.
03 Kotikala na mosquée, mpe ezali na ndingisa mpo na ye kokatisa kaka kozanga kotikala.
04 Kosimbá buku ya coran.
05 Kotanga Coran.