Nzambe (Allah) Alobi:
{eh Ntoma loba na basi nayo Mpe na bana nayo ya basi, na basi ya bandimi ete: bakitisaMpe balata kitambala na bango ya monene, wana Ezali mpo ete bayebana mpo ba tungisama te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu}.
[Al Ahzaab: 59].
Nzambe asali obligatoire na muasi musulman alata hijab pe azipa ba parties privées na ye pe nzoto na ye mobimba na mibali oyo bazali mahram te na kosalela bilamba ya momesano na mboka na ye Ezali permis te pona ye alongola hijab na ye sauf liboso na ye mobali to ba mahrams, oyo bazali baye mwasi musulman azali na ndingisa te ya kobala libela, mpe bazali:(Tata, ata soki mwana azali na likoló ndenge nini, ata na nse ndenge nini, bayaya ya tata, ndeko mobali, mwana ya ndeko mobali, mwana ya ndeko mwasi, mobali ya mama soki asilisi libala elongo na ye, tata ya mobali, ata moke te ndenge nini likoló, mwana ya mobali, ata soki azali na nse ndenge nini, mobali ya mwana mwasi, mpe oyo epekisami na molongo ya bankoko epekisami komelisa bana mabele)
Basi ya Ba musulmans batosaka mibeko mingi na bilamba na bango:
Ya liboso: Efinika nzoto mobimba.
Ya mibale: Esengeli te kozala eloko oyo mwasi alataka mpo na komikembisa(kobipe mibali) na yango.
Ya misato: Esengeli te Ezala polele, komonisa nzoto na ye.
Ya minei: Esengeli kozala ya kokangama te mpe ya makasi te, oyo ezali kolimbola (kolakisa) eteni moko ya nzoto na ye.
Ya mitano: Esengeli te kozala na malasi ya solo makasi.
Ya motoba: Esengeli te kokokana na bilamba ya mobali.
Ya nsambo: Esengeli te kokokana na elamba ya basi oyo bazali Bamizilma te na ntango ya losambo to bafeti na bango.
Moko ya bizaleli ya mondimi
Nzambe (Allah) Alobi:
{Bandimi bazali kaka baye, tango balobeli Allah, bazali kobanga na mitema na bango, mpe tango ba versets na ye etangami epayi na bango, yango ebakisaka bango kondima, mpe na Nkolo na bango nde batiaka elikia na bango}.
[Al-Anfal: 2].
Azali sembo na elobeli na ye mpe akosaka te.
Akokisaka liyokani mpe elaka naye.
Azalaka kopanzana te na koswana.
Akokisaka elikya.
Alingaka pona ndeko na ye musulman oyo alingaka pona ye moko.
- akabaka
Asalelaka bato malamu mingi.
- Akangisaka bondeko.
- Asekaka na mokano ya Nzambe, apesaka Ye matondo na tango ya bomengo, mpe azali na motema molai na tango ya mpasi.
Azalaka na bizaleli ya soni.
-Ayokelaka bi kelama mawa.
Motema na ye ezalaka na kimia na bato ya pembeni naye, azalaka na kande na bango te.
Alimbisaka bato.
Alyaka Riba (Eloko yamabe) te mpe asalelaka yango te.
- Asalaka ekobo te.
Amelaka masanga te.
Asalaka malamu epai ya ba voisins naye.
Asalaka zulma (injustice) te na trahison te.
Ayibaka te na akosaka te.
-Azali na mokumba (lisungi) epai ya baboti na ye, ata soki bazali ba musulmans te, mpe atosaka bango na oyo ezali malamu.
Abokolaka bana na ye na bizaleli malamu, apesaka bango mitindo ete básala misala ya mibeko, mpe apekisaka bango kosala mabe na makambo oyo epekisami.
- Azuaka Exemple na misala ya ba non musulmans te na bizaleli mpe mimeseno na bango ya lingomba te, oyo ezalaka bizaleli pe elembo na bango.